1 Thessalonians 3

1Bongo, lokola tokokaki lisusu kokanga mitema te, yango wana tokanisaki ete ezali malamu, ete totikala biso moko na Atene. 2Mpe, totindaki Timote, oyo azali ndeko na biso mpe mosali ya Nzambe, mpe moninga na biso ya mosala kati na Sango Malamu ya Kristo, mpo alendisa bino mpe ayikisa bino piko kati na kondima na bino, 3mpo ete moto moko te na kati na bino akweya na minyoko oyo bozali komona ; pamba te, bino moko boyebi malamu ete, tosiʼtobongisama mpo na yango. 4Tango tozalaki na bino elongo, toyebisaki bino etetokokutana na minyoko. Mpe yango nde esalami, ndenge boyebi yango malamu. 5Bongo, lokola nakokaki lisusu kokanga motema te, yango wana natindaki Timote mpo ayeba soki kondima na bino ekomi ndenge nini. Nabangaki, mpo ete tango mosusu Momeki asiʼamekaki bino, mpe mosala na biso ekokoma mosala ya pamba.

6Kasi Timote, asili sikʼoyo kozongela biso wuta epai na bino, mpe amemeli biso basango ya malamu mpo na kondima na bino mpe bolingo na bino. Ayebisi biso ete bozali tango nyonso na makanisi ya malamu mpo na biso, mpe bozali na posa monene mpo na komona biso, ndenge bisompe tozali na posa monene mpo na komona bino.

7Yango wana bandeko, na kati ya bapasi na biso mpe minyoko na biso nyonso, tozwaki lilendisi epai na bino, mpo na kondima na bino. 8Pamba te, sikʼoyo tomoni penza ete tozali na bomoi, lokola bozali ya kotelama ngwi kati na Nkolo. 9Bongo ndenge nini tokoki kozongisa matondi mingi epai ya Nzambempo na bino, mpo na esengo nyonso oyo tozalaka na yango liboso na Nzambe na biso, mpo na bino ?

10Butu mpe moi, tobondelaka na molende nyonso mpo ete tokoka komona bino lisusu, mpe tokokisa oyo ezangi na kondima na bino.

Libondeli ya Polo

11Sikʼoyo, tika ete Nzambe ye moko Tata na biso, mpe Nkolo na biso Yesu, bafungolela biso nzela mpo toya epai na bino. 12Tika ete Nkolo akolisa bolingo na bino mpe atondisa yango kati na biso na bino, mpe epai ya bato nyonso, ndenge biso mpe tolingaka bino. 13Tika ete alendisa mitema na bino, mpo ete bokoka kozala na mabe moko te mpe bozala basantu liboso ya Nzambe na biso mpe Tata, tango Nkolona biso Yesu akoya elongo na basantu na ye nyonso.
Copyright information for LinMNB